Yona 3 - Mokanda na BomoiYona ateyi bato ya Ninive 1 Yawe alobaki na Yona na mbala ya mibale : 2 — Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo. 3 Yona atosaki Liloba na Yawe ; atelemaki mpe akendeki na Ninive. Nzokande Ninive ezalaki engumba moko ya monene na miso ya Nzambe ; esengelaki kosala mikolo misato mpo na kosilisa kotambola kati na yango. 4 Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola : — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye ! 5 Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe ; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola. 6 Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu. 7 Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive : « Na mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, Epekisami na bato mpe na bibwele, ezala ngombe, meme to ntaba ; epekisami kolia biloko nyonso mpe komela mayi. 8 Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko. 9 Nani ayebi ? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. » 10 Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.