Yobo 25 - Mokanda na BomoiMaloba ya misato ya Bilidadi 1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki : 2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo. 3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ? 4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ? 5 Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye, 6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! » |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.