Yobo 17 - Mokanda na Bomoi1 Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai. 2 Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango. 3 Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo ; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai ! 4 Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; yango wana, okolongisa bango te. 5 Moto oyo akofunda balingami na ye mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, bana na ye bakokufa miso. 6 Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi. 7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi. 8 Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe. 9 Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka. 10 Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu ! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino. 11 Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba. 12 Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi. 13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi. 14 Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, › 15 wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai ? 16 Ekokita kino na bikuke ya kufa tango tokokende elongo kopema kati na putulu. » |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.