Oze 6 - Mokanda na BomoiKobongola motema ya lokuta 1 Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso. 2 Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye. 3 Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele. 4 Efrayimi, nasala yo lisusu nini ? Yuda, nasala yo lisusu nini ? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki. 5 Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali. 6 Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba. 7 Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai. 8 Galadi ezali engumba ya bato mabe, etonda na bilembo ya makila. 9 Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka : babomaka bato na nzela ya Sishemi ; ezali likambo ya somo penza ! 10 Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi : Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo. 11 Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.