Oze 14 - Mokanda na BomoiKobongola motema ememaka lipamboli 1 Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi. 2 Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo. 3 Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe ; boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe. 4 Asiri akokoka kobikisa biso te ; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso : ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. » 5 Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango. 6 Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ; akobimisa fololo lokola lisi, akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani. 7 Bitape na ye ekokende mosika, akozala na lokumu lokola nzete ya olive, mpe malasi na ye ekozala lokola malasi ya nzete ya sedele ya Libani. 8 Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, bakokola malamu lokola ble, bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani. 9 Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma. 10 Nani azali na bwanya mpo na kososola makambo oyo ? Nani azali na mayele mingi mpo na koyeba yango ? Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima : bato ya sembo bakolanda yango, kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.