Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Joeli 3 - Mokanda na Bomoi


Tango Yawe akosopa Molimo na Ye

1 Sima na makambo oyo, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola, mibange na bino bakolota bandoto, bilenge na bino bakozwa bimoniseli.

2 Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.

3 Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili : makila, moto mpe makonzi ya milinga.

4 Moyi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo ya Yawe ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya somo.

5 Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama ; pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi, ekozala na bato oyo bakobika, kolanda ndenge Yawe alobaki, mpe bato oyo Yawe akobenga bakozala kati na bato oyo bakobika.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ