Ezayi 62 - Mokanda na Bomoi1 Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda. 2 Bongo bikolo ekomona bosembo na yo, mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo. Bakobenga yo na kombo ya sika oyo monoko na Yawe ekopesa. 3 Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo. 4 Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala. 5 Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo. 6 Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te ; 7 mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili ! 8 Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, loboko na Ye ya nguya, mpe alapi ndayi : « Nakopesa lisusu ble na yo te lokola bilei epai ya banguna na yo ; bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika oyo omonelaki pasi ; 9 kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango mpe bakokumisa Yawe, mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. » 10 Boleka, boleka na bikuke ! Bobongisela bato nzela, bopasola nzela, bopasola nzela ya monene ! Bolongola mabanga, botombola bendele liboso na bato ya bikolo. 11 Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › » 12 Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe ; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.