Ezayi 20 - Mokanda na BomoiElembo ya lisakoli mpo na Ejipito 1 Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi ; 2 kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu. 3 Bongo Yawe alobaki : « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi, 4 mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito. 5 Bato nyonso oyo batiaki elikya na bango na Kushi mpe bakomaki lofundu mpo na Ejipito bakokweya mpe bakotonda na soni. 6 Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › » |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.