Ezayi 12 - Mokanda na BomoiNzembo mpo na kokumisa Yawe 1 Na mokolo wana, okoloba : « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai ! 2 Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. » 3 Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko. 4 Na mokolo wana bokoloba : « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso. 5 Boyemba loyembo mpo na Yawe, pamba te asali makambo ya kokamwa. Tika ete mokili mobimba eyeba yango ! 6 Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! » |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.