Ester 10 - Mokanda na BomoiLokumu ya Maridoshe 1 Mokonzi Kizerisesi akataki mpako mpo na bato ya mokili na ye ya bokonzi kino na bituka oyo ezalaki pene ya ebale. 2 Bongo misala nyonso ya bokonzi mpe ya nguya na ye, elongo na makambo nyonso ya lokumu ya Maridoshe oyo mokonzi atombolaki, ekomamaki kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Medi mpe ya Persi. 3 Moyuda Maridoshe azalaki moto ya mibale kati na bokonzi sima na mokonzi Kizerisesi. Maridoshe azalaki moto monene mpe ya lokumu na miso ya Bayuda, bandeko na ye ; pamba te azalaki koluka bolamu ya bato na ye mpe kobundela bolamu ya Bayuda nyonso. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.