Banzembo 99 - Mokanda na BomoiNzembo 99 Bogumbamela Yawe, pamba te azali Mosantu 1 Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana ! 2 Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso. 3 Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama ; ezali bule ! 4 Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi. 5 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ; azali Mosantu. 6 Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango. 7 Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango. 8 Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango. Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka atako opesaki bango etumbu mpo na misala na bango ya mabe. 9 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.