Banzembo 98 - Mokanda na BomoiNzembo 98 Nzambe azali koya kosambisa mabele 1 Nzembo. 1 Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa ! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki. 2 Yawe atalisaki elonga na Ye, amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo. 3 Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki. 4 Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule ! 5 Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze ! 6 Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke. 7 Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito ! 8 Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo 9 liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.