Banzembo 95 - Mokanda na BomoiNzembo 95 Mokili mobimba ezali kati na maboko ya Yawe 1 Boya, toganga na esengo mpo na Yawe ! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso ! 2 Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo. 3 Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso. 4 Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye ; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye. 5 Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango ; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye. 6 Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso ! 7 Pamba te azali Nzambe na biso ; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, 8 « boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba ; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe 9 epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala. 10 Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. › 11 Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › » |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.