Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 93 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 93 Yawe akonzaka mpo na libela na libela

1 Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.

2 Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ; seko na seko, ozali.

3 Yawe, bibale egangaka ! Bibale etombolaka lokito na yango ; bibale etombolaka makelele na yango.

4 Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.

5 Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ