Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 92 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 92 Ezali malamu kokumisa Yawe

1 Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.

2 Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo !

3 Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,

4 na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze !

5 Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai ! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.

6 Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !

7 Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.

8 Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.

9 Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.

10 Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza ; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.

11 Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.

12 Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.

13 Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.

14 Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.

15 Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,

16 basakolaka : « Yawe azali alima, azali Libanga na biso ; kati na Ye, mabe ezali te ! »

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ