Banzembo 91 - Mokanda na BomoiNzembo 91 Ebombamelo ya malonga 1 Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. 2 Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! » 3 Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te. 4 Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende. 5 Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi, 6 bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi. 7 Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te. 8 Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango. 9 Soki otatoli : « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo, 10 mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ; 11 pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso. 12 Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te ; 13 okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona. 14 Lokola akangami na ngai, nakokangola ye ; lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye. 15 Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu. 16 Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.