Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 87 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 87 Siona, etima ya bikolo nyonso
1 Nzembo ya bana ya Kore.

1 Nzembo ya bana ya Kore. Yawe atia moboko ya Siona na likolo ya bangomba ya bule.

2 Yawe alingaka bikuke ya Siona koleka bandako nyonso ya Jakobi.

3 Oh engumba ya Nzambe, maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !

4 Kati na bato oyo bayebi ngai, natangi Rahavi mpe Babiloni. Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri mpe Kushi ebimela.

5 Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama : « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »

6 Tango Yawe akomaki kati na buku ya bikolo, akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango : « Moto songolo abotama kati na Siona ! »

7 Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka : « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ