Banzembo 82 - Mokanda na BomoiNzembo 82 Nzambe asambisaka bakambi ya bikolo 1 Nzembo ya Azafi. 1 Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe. 2 Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe ? 3 Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola ; 4 bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe. 5 Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana. 6 Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! » 7 Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi. 8 Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.