Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 70 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 70 Nzambe, yaka kosunga ngai

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.

2 Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai ! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai !

3 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni !

4 Tika ete bato oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni !

5 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! »

6 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te !

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ