Banzembo 67 - Mokanda na BomoiNzembo 67 Tika ete bikolo nyonso ekumisa Nzambe 1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. 2 Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ; 3 mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso. 4 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! 5 Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele. 6 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo ! 7 Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso. 8 Tika ete Nzambe apambola biso ; tika ete mokili mobimba etosa Ye ! |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.