Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 65 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 65 Opesaka bofuluki

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2 Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.

3 Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.

4 Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ; kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.

5 Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi mpo ete avanda kati na lopango na Yo. Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo, Tempelo na Yo ya bule.

6 Nzambe Mobikisi na biso, oyanolaka biso na bosembo, na nzela ya biloko ya somo ; Ozali elikya ya mokili mobimba mpe ya bibale minene.

7 Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ; atondi na mpiko.

8 Akitisaka makelele ya bibale minene, makelele ya bambonge na yango mpe makelele ya bikolo.

9 Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.

10 Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.

11 Olekisaka mayi kati na mikala, okweyisaka mipiku ya mabele, osopelaka mabele mayi mpe opambolaka milona.

12 Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.

13 Bilanga ya esobe etondaka na bilei, mpe bangomba mike etondaka na esengo.

14 Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba ; mabwaku etondaka na ble, egangaka na esengo mpe eyembaka.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ