Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 63 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 63 Boboto ya Nzambe eleki bomoi na motuya

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.

2 Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.

3 Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.

4 Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo.

5 Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.

6 Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta ; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

7 Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu ;

8 pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.

9 Nakangami na Yo ; loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.

10 Bato oyo balukaka koboma ngai bakozinda na mabele

11 Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.

12 Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe ; moto nyonso oyo alapaka ndayi na Kombo ya Nzambe akomikumisa mpo na yango, pamba te minoko ya bakosi ekokangama.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ