Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 62 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 62 Nazwaka na kimia kati na Nzambe

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.

2 Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.

3 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.

4 Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?

5 Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.

6 Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.

7 Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.

8 Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.

9 Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.

10 Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta ; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.

11 Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.

12 Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale : « Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;

13 mpe bolingo ezali ya Nkolo ; » mpe « ofutaka moto nyonso kolanda misala na ye. »

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ