Banzembo 61 - Mokanda na BomoiNzembo 61 Bomba ngai na se ya lipapu na Yo 1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. 2 Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai. 3 Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani ! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko. 4 Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai. 5 Posa ya motema na ngai ezali : kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo. 6 Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo. 7 Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi. 8 Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye. 9 Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.