Banzembo 54 - Mokanda na BomoiNzembo 54 Nzambe akangoli ngai 1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. » 3 Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo. 4 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai. 5 Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te. 6 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai. 7 Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe ! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango. 8 Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu. 9 Okangoli ngai na pasi nyonso ; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.