Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 47 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 47 Bobetela Nzambe maboko

1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2 Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.

3 Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.

4 Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.

5 Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.

6 Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.

7 Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.

8 Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

9 Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.

10 Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; atombwama makasi.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ