Banzembo 46 - Mokanda na BomoiNzembo 46 Nzambe azali ekimelo na biso 1 Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi. 2 Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi. 3 Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene ; 4 ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba. 5 Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. 6 Nzambe azali kati na yango, ebukani te ; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi. 7 Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani. 8 Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso. 9 Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili. 10 Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba. 11 Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. » 12 Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.