Banzembo 43 - Mokanda na BomoiNzembo 43 Kotia elikya kati na Yawe 1 Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe. 2 Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ? 3 Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ; 4 bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda. 5 Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.