Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 32 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 32 Bolimbisi epesaka esengo
1 Nzembo ya Davidi.

1 Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe !

2 Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te, mpe atambolaka na lokuta te.

3 Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te, nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.

4 Butu mpe moyi, loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ; makasi na ngai ekomaki kosila ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.

5 Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.

6 Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.

7 Ozali ebombamelo na ngai ; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.

8 Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

9 Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli, oyo bakangaka nguya na yango na nzela ya ebende mpe ya singa oyo batiaka na minoko na yango mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »

10 Bato mabe bazali na pasi mingi, kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato oyo batiaka elikya na Yawe.

11 Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo ! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ