Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 3 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 3 Yawe Abikisaka

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.

2 Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !

3 Ebele bazali koloba na tina na ngai : « Nzambe akobikisa ye te ! »

4 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.

5 Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.

6 Nalalaka mpe nazwaka pongi ; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.

7 Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.

8 Yawe, telema ! Nzambe na ngai, kangola ngai ! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu.

9 Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ