Banzembo 29 - Mokanda na BomoiNzembo 29 Mongongo ya Yawe 1 Nzembo ya Davidi. 1 Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi. 2 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye. 3 Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene. 4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya ; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi. 5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ; Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani. 6 Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe, apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa. 7 Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto. 8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ; Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi. 9 Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka : « Nkembo ! » 10 Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela ; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela. 11 Yawe apesaka bato na Ye makasi ; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.