Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 24 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 24 Yawe akoti na Tempelo
1 Nzembo ya Davidi.

1 Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.

2 Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.

3 Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ? Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?

4 Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te.

5 Yawe akopambola ye ; mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.

6 Ndenge wana nde ezali, ekeke ya bato oyo bakangamaka na Yo, ba-oyo balukaka elongi na Yo, Nzambe ya Jakobi.

7 Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

8 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Elombe ya nguya ; Yawe, Elombe ya bitumba.

9 Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

10 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azali Mokonzi ya nkembo !

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ