Banzembo 23 - Mokanda na BomoiNzembo 23 Yawe azali Mobateli na ngai 1 Nzembo ya Davidi. 1 Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te. 2 Apemisaka ngai na matiti ya mobesu, mpe amemaka ngai pembeni ya mayi ya kimia. 3 Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. 4 Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai. 5 Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana. 6 Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.