Banzembo 20 - Mokanda na BomoiNzembo 20 Yawe, longisa mokonzi na biso 1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi ; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo. 3 Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona. 4 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba. 5 Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso. 6 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso. 7 Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali. 8 Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. 9 Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi. 10 Yawe, bikisa mokonzi ! Yanola biso tango tozali kobelela. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.