Banzembo 150 - Mokanda na BomoiNzembo 150 Bokumisa Yawe na mindule 1 Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi ! 2 Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye ! Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo ! 3 Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ; bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda ! 4 Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite ! 5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene ! 6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe ! |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.