Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 15 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 15 Nani akoki kovanda esika moko na Nzambe
1 Nzembo ya Davidi.

1 Nzembo ya Davidi. Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ? Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ?

2 Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;

3 oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te ;

4 asanganaka te na moto oyo asalaka mabe, kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ; akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi, mpe abongolaka mokano na ye te ;

5 asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ