Banzembo 149 - Mokanda na BomoiNzembo 149 Yawe alingaka bato na Ye 1 Bokumisa Yawe ! Boyembela Yawe nzembo ya sika, bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene ! 2 Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye ! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango ! 3 Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ; tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda ! 4 Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga. 5 Tika ete bayengebene na Yawe basepela kati na lokumu oyo ; tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango ! 6 Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale kati na maboko na bango 7 mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo mpe kopesa bato etumbu ; 8 mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo, kokanga bato na bango ya lokumu na mabende 9 mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango ! Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso. Bokumisa Yawe ! |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.