Banzembo 146 - Mokanda na BomoiNzembo 146 Nzambe alongisaka banyokolami 1 Bokumisa Yawe ! Oh molimo na ngai, kumisa Yawe ! 2 Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi. 3 Botia elikya te na bakambi to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa. 4 Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka. 5 Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye ! 6 Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko. 7 Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko. 8 Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo. 9 Yawe abatelaka bapaya, asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, kasi abebisaka banzela ya bato mabe. 10 Yawe azali Mokonzi seko na seko ; Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela ! Bokumisa Yawe ! |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.