Banzembo 142 - Mokanda na BomoiNzembo 142 Ozali ekimelo kaka moko mpo na ngai 1 Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga. 2 Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe ; na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe. 3 Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye. 4 Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola. 5 Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai ! 6 Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! » 7 Yoka koganga na ngai, pamba te nazali na pasi makasi ! Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai, pamba te baleki ngai na makasi. 8 Bimisa ngai na boloko mpo ete nasanzola Kombo na Yo ! Bato ya sembo bakoya kozingela ngai sima na Yo kosalela ngai bolamu. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.