Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 140 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 140 Kangola ngai wuta na maboko ya bakosi

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2 Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.

3 Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.

4 Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.

5 Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !

6 Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.

7 Nalobaka na Yawe : « Ozali Nzambe na ngai ! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.

8 Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.

9 Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.

10 Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.

11 Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !

12 Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

13 Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.

14 Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo, bato ya alima bakovanda liboso na Yo.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ