Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 14 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 14 Mokili ezali ya kobeba
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.

2 Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.

3 Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te !

4 Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !

5 Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.

6 Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola kasi Yawe azali ebombamelo na ye.

7 Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona ! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ