Banzembo 137 - Mokanda na BomoiNzembo 137 Pembeni ya bibale ya Babiloni 1 Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona. 2 Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango. 3 Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo ; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba : « Boyembela biso banzembo ya Siona ! » 4 Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya ? 5 Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba ! 6 Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai ! 7 Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! » 8 Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso ! 9 Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga ! |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.