Banzembo 133 - Mokanda na BomoiNzembo 133 Tango bandeko basangani 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko ! 2 Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye. 3 Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.