Banzembo 131 - Mokanda na BomoiNzembo 131 Kimia ya solo 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. 1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai. 2 Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele. 3 Isalaele, tia elikya kati na Yawe kobanda sik’oyo mpe libela na libela. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.