Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 130 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 130 Wuta na mozindo ya pasi
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !

2 Nkolo, yoka ngai ! Yoka mabondeli na ngai !

3 Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?

4 Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.

5 Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya ; nazali kozela maloba na Ye.

6 Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.

7 Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.

8 Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ