Banzembo 13 - Mokanda na BomoiNzembo 13 Kobanga mpe kolikya 1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ? 3 Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso ? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ? 4 Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu ; soki te, nakokufa, 5 bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi. 6 Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu. |
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.
Biblica, Inc.