Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 129 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 129 Banyokoli ngai mingi, kasi nalembi te
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba :

2 « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te ! »

3 Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.

4 Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe.

5 Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima !

6 Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango ;

7 tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye.

8 Tika ete baleki nzela baloba na bango te : « Tika ete Yawe apambola bino ! » Topamboli bino na Kombo na Yawe !

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ