Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 128 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 128 Tika ete Yawe apambola yo
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye !

2 Oliaka mbuma ya mosala na Yo ; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.

3 Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.

4 Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye.

5 Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo

6 mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele !

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ