Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 127 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 127 Nani asalaka nyonso
1 Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

1 Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.

2 Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.

3 Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.

4 Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba, ndenge wana mpe bana oyo moto aboti na bolenge na ye bazali.

5 Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga ! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ