Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -

Banzembo 126 - Mokanda na Bomoi


Nzembo 126 Tango ya kolona mpe tango ya kobuka
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.

2 Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! »

3 Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela.

4 Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.

5 Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo.

6 Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.

Mokanda na Bomoi™

Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.

Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.

Lingala Contemporary Bible™

Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.

Used with permission. All rights reserved worldwide.

Biblica, Inc.
ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:



ကြော်ငြာတွေ